Bisika minene motoba

Bisika nyonso motoba ezali na katikati ya Bruxelles. Okoki kotambola na makolo banda esika moko tii mosusu.

  1. Grand-Place Awa nde nzete monene ya Noele mpe lisano ya miinda ná mongongo ezali. Bokofungola zando mpe kopelisa miinda ya nzete mpo na mbala ya liboso mokolo ya 27 Novɛmbɛ, kobanda na 18:00.
  2. Place de la Bourse Village ya bitúká ya bapaya, Béarn Pyrénées mpe Pays basque, ekozala na esika oyo. Baby Corner ezali na kati ya ndako ya Bourse.
  3. Place Sainte-Catherine Karusɛle ya Andréa ezali pene na ndako ya nzambe. Bililingi na yango eutá na masolo ya Jules Verne.
  4. Vismet · Marché aux Poissons Roue monene ya bamɛtrɛ 55 ezali na Vismet, oyo babengaka mpe Marché aux Poissons.
  5. Place De Brouckère Awa okoki kosala patinage na likoló ya glace to komeka curling. Lisano oyo ezali na bakiti na lolenge ya banyama ya Noele ezali pene, na boulevard Anspach.
  6. Place de la Monnaie Okomona esika yango na liboso ya ndako ya opera. Talá programme officiel mpo na koyeba masano oyo ezali mokolo ya mobembo na yo.
Nzela ya kotambola na makolo Carte officielle ya marché ya Noël